17/10/2021
Mobali aza maître ya famille, mobali aza leader, mobali aza guide, mobali aza chef ya famille. Kasi chef ya famille elingi koloba te qu’il faut ozala kaka na mbongo, kozala na mbongo pe elingi koloba te il faut kozala na mbongo ebele...kasi eza na mibali mususu baza mabe, baza ba manipulateurs, baza na esprit ya koniokola basi inutilement.
Toza na 3 catégories ya mibali:
1. Vrai homme: mobali ya solo ata aza na mbongo mingi te, aza aza na ba moyens mingi te ako bunda, akosala oyo esengeli po a répondre na ba besoins ya mwasi naye, ata akopesa mingi te mais akosala le nécessaire po mwasi ou copine naye akelela savons te, mafuta te, bande hygiénique te, elamba te....
2. Pervers narcissiques: ba pervers eza genre ya mibali oyo bayaka na vie ya mwasi pona ko bebisa, pona ko zindisa mwasi na kati ya libulu oyo ako koka komata te. Mobali soki aza pervers narcissiques, ata azo sala, ata aza na mbongo, ata possibilités yako sombela yo biloko oyo esengeli ezali akosalela yo yango te, akobanda kopesa kaka ba raison, akolinga ko entretenir yo te, kasi akozala kaka présent soki aza na besoin ya rapport sexuel.
3. Responsables: mobali soki aza responsable ako assumer ba responsabilités naye, ako soutenir yo financièrement, ata osengi ye mbongo te akoyeba ke oza na posa n’ango pona kosomba biloko oyo esengeli pona ki bo mwasi.
Kasi effet yakozala responsable financièrement eza vraiment amour te. vrai amour batiaka yango na balance na quantité ya mbongo oyo mobali azo pesa te.
Nasengi na bino boluka mibali oyo bakopesa bino mbongo mbala moko te. kasi mobali oyo azo respecté yo premièrement, oyo azo considéré yo, oyo azo entretenir yo moralement, sagement afin que ozala mwasi malamu. Mbongo eyaka n’ango avec le temps.
______________________________